"Baluti" lyrics - VERCKYS

VERCKYS
"Baluti"

Makwela nga na yo to vandaki mwa ba mbula eh
To bandaki koyebana mwa bizaleli
To lapaki, to lapaki seleka
Na miso ya bakonzi pe ba temoin
Ya solo to lobanaka boye
Toko kabwana te kino liwa
Lelo oyo osundoli nga na bana
Nako suka wapi bana bako lela ozonga eh

To lapaki, to lapaki seleka
Na miso ya bakonzi pe ba temoin
Ya solo to lobanaka boye
Toko kabwana te kino liwa
Lelo oyo osundoli nga na bana
Nako suka wapi bana bako lela ozonga eh

Okosi nga olobi oke mobembo, Papy Baluti
Na compte ya mosala
Obosani ba pasi na bisengo to mona
Oh na tango ya bo somele eh
Na ndimaki te
Po to bandaka boye te
Obosani ngai po ozui bomengo
Tango ya pasi
Lelo nyoso obungi
Po ozui nyoso ozalaki ko luka eh

Papy Baluti lelo osabote ngai
Na molongo ya bana otikela ngai mama yeye

Na ndimaki te lelo vraiment na ndimi
Na mabe nyoso osalaki nga na bana na ndako oh

Motema makasi, Papy, okangeli ngai
Obosani lelo ata bana obota oh

Avenir ya bana nayo otali pamba eh
Otali pamba eh
Okufeli nayo bisengo ya mokili, Baluti

Papy Baluti lelo osabote ngai
Na molongo ya bana otikela ngai papa yeye

Na ndimaki te lelo vraiment na ndimi
Na mabe nyoso osalaki nga na bana na ndako oh

Motema makasi, Papy, okangeli ngai
Obosani lelo ata bana obota oh

Avenir ya bana nayo otali pamba eh
Otali pamba eh
Okufeli nayo bisengo ya mokili, Baluti

[Long instrumental break]

Papy Baluti lelo osabote ngai
Na molongo ya bana otikela ngai mama yeye

Na ndimaki te lelo vraiment na ndimi
Na mabe nyoso osalaki nga na bana na ndako oh

Motema makasi, Papy, okangeli ngai
Obosani lelo ata bana obota oh

Avenir ya bana nayo otali pamba eh
Otali pamba eh
Okufeli nayo bisengo ya mokili, Baluti